۞ جعل الله الكعبة البيت الحرام قياما للناس والشهر الحرام والهدي والقلايد ذالك لتعلموا ان الله يعلم ما في السماوات وما في الارض وان الله بكل شيء عليم ٩٧
Allah atiaki ka’aba ezala ndako esantu, ezala esika ya bosangani ya bato banso. Atiaki sanza esantu, mpe.mabonza, mpe bilembo wana ezali mpo boyeba ete Allah ayebi manso mazali o likolo mpe na nsé, mpe ya sôló Allah azali moyebi ya manso.