Ezali o’kati ya bayuda baye bazali kobongola liloba na esika na yango. Mpe balobaka ete: Toyoki mpe toboyi kotosa, mpe balobi lisusu: Yoka kasi bapesa yo te ndenge ya koyokela, mpe pesa biso litomba, bazali kobimisa lolemu na bango mpona kofinga lingomba (ya Allah)! kasi soki balobaka ete: Toyoki mpe totosi, mpe balobi na bato ete: Yoka mpe tala biso, nde ezalaki malamu mpe semba mpona bango. Kasi Allah alakeli bango botutu na ntina na bopagano na bango; mpe bakondimaka te sé moke kati na bango.