Ya sôló, baye bazali kobomba maye Allah akitisaki kowuta na buku1 mpe bazali koteka yango na ntalo moke, bango nde bazali kolia móto ya lifelo o kati na mabumu ma bango. Mpe Allah akolobisa bango te o mokolo ya suka, mpe akopetola bango te, mpe bakozala na etumbu ya makasi.