Mpe tiyela biso bomengo (bolamu) na bomoyi ya nsé, mpe o mokolo mwa suka, mpe tozongi sé epai nayo. Mpe (Allah) alobi: Etumbu nangai ekozua oyo nalingi, kasi mawa na ngai ezingi biloko binso, nakopanza yango epai ya baye bazali kobanga mpe bazali kobimisa zakat,1 mpe bazali kondima na bilembo bia ngai.