Oh bino bandimi! Soki basengi bino ete: Bopesa esika ya kofanda okati ya lisanga, bopesa yango, Allah akopesa bino esika, mpe soki balobi ete: Botelema, bosala yango, Allah akotombola bandimi mpe lisusu akotombola kati na bino baye bazua boyebi likolo koleka. Mpe Allah azali na sango ya maye bozali kosala.