Allah! Nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te kaka sé ye, azali na bomoyi, amikoka naye moko, animbaka te mpe alalaka te. Maye manso mazali o’likolo mpe o’mabele mazali ya ye. Nani oyo azali na makoki ya kosengela moto epai ya Allah soki na ndingisa naye te? Ayebi maye maleka na maye makoya. Bakozuaka eloko moko te na boyebi naye sé na maye alingi, kursy1 naye ezali monene koleka mapata2 na mabele,3 mpe ayokaka mpasi te mpona kobatela yango azali likolo mpe monene koleka.